Top Search

LyricsCopy.com

La mignonna

by Langa Langa Stars

lyricscopy.com
Na bondeli yo na ba bijoux, hé hé
Na bondeli yo na ba bongo, hé hé
Nga na leli oh, nga na leli oh, nyango
Nga na leli oh, nga na leli oh, mama
Na kozua yo wapi, oh oh Chérie
Soki na zui yo te, oh likambo te
Na kende pembeni ya ebale na kuta mwasi oyo ba bengi Mamiwata
Nzoto sacré, nzoto ya magie eh
Eh Nga na komi zoba po na yo, mama
Eh Na sali nini po yo oyokela nga
Eh likambo yo osali nga na yebi tina te
Oh na kamwi

Yoka mwana moninga ata mwa mawa ndenge alelakayo
Oh Kabibi na nga ah ah
Na zali komituna nini ba tshi yo na motema
po okoma lelo boye, mama

Yo mon amour ya motema nga
Yaka eh eh, Yaka eh eh, zonga eh eh, Bibi eh eh
Keba keba noki batindela yo sango ya mawa
Yoyoyo epayi yo ozali omema ngabo
Yeyeye mwana mama, ah

Yoka mwana moninga ata mwa mawa ndenge alelakayo
Oh Dorothée na nga ah ah
Na zali komituna nini ba tshi yo na motema
po okoma lelo boye, mama

Yo mon amour ya motema nga
Yaka eh eh, Yaka eh eh, zonga eh eh, Bibi eh eh
Keba keba noki batindela yo sango ya mawa
Yoyoyo epayi yo ozali omema ngabo
Yeyeye mwana mama, ah

Na boya ba petits ba bimi, lelo abimi, lobi kuna abima
Monotonie eh eh eh eh, Monotonie eh eh eh eh,
Eh eh eh, mama ah,
Mibali eh, ba zua yo na valeur te

Ata obimi po osepelisa nzoto eh, bato ba ko comprendre yo te oh
Misusu babima pona koluka mbogo eh, basusu pona plaisir, oh chérie eh
To ko comprendre yo lisusu te oh, nini olingi eh
Yebisa baboti ba yo ba yeba

Kitoko ya mwinda pamba, chérie aye, ah chérie aye
Soki bakati ye courant, soki bakati ye courant
Okopela wapi eh, okomi ngo mabele

Lolendo eloko pamba ba sala ngo basila ah
Bozoba ya soso ezali sende te mama, ah
Ezali sende te mama
Nyata yango, soki oko ndima Nzambe eh eh

Aye Petite oh
Aye mwana mama
Aye La mignonna botika nga na lela

Ritournelle

Chérie na nga Bibi, mwana kin oh oh
Chérie na nga Bibi, La mignonna oh
Browse Artists :

# A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z

Karaoke : Backing tracks & videos - Karaoké files

Karaoke Fun !